Revelation of John 17

MALOBA SAMBO MPO NA BABILONA

Liloba ya liboso : balakisi mwasi ya ndumba

1Bongo anzelu moko na kati ya banzelu sambo oyo bazalaki na bakoposambo, ayaki mpe alobaki na ngai :

—Yaka, nakolakisa yo etumbu ya mwasi ya ndumba monene, oyo avandi likolo ya bamayi mingi.
2Bakonzi minene ya mokili basalaki ekobo elongo na ye, mpe baoyo bavandaka na mikili balangwa vino ya kindumba na ye !

3Bongo anzelu amemaki ngai na Molimo kati na esobe. Kuna, namonaki mwasi moko afandaki likolo ya nyama ya motane, nyama yango ezalaki ya kotonda na bakombo ya kofinga Nzambe, mpeezalaki na mitu sambo mpe na maseke zomi. 4Mwasi yango alataki bilamba ya motane ya pete-pete mpe motane ya makasi, babizu ya wolo, mabanga ya talo, mpe mayaka. Asimbaki na loboko na ye kopo ya wolo etonda na makambo ya sonimpe ya bosoto ya kindumba na ye.

5Kombo moko ezalaki ya kokomama na elongi na ye : “Sekele, Babilona vile monene, mama ya basi ya ndumba mpe ya makambo ya soni ya mokili.” 6Mpe namonaki mwasi yango alangwaki makila ya basantu mpe makila ya batemwe ya Yesu. Nakamwaki mingi penza tango namonaki ye.

Liloba ya mibale : sekele ya mwasi ya ndumba

7Bongo anzelu alobaki na ngai :

—Mpo na nini ozali kokamwa ? Nakoyebisa yo sekele ya mwasi wana, mpe ya nyama oyo ezali komema ye, oyo ezali na mitu sambo mpe maseke zomi.
8Nyama oyo omonaki, oyo ezalaki liboso mpe sikʼoyo ezali te, ekobima na libulu ya molai mpe ekokende na libebi. Bongo bato oyo bavandaka na mokili, baoyo bakombo na bango ekomama te na Buku ya bomoi banda na ebandeli ya mokili, bakokamwa tango bakomona nyama wana. Pamba te, nyama yango ezalaki liboso mpe sikʼoyo ezali te ; mpe ekoya lisusu.

9Mpo na kososola makambo oyo, esengeli ozala na bwania mingi.

Mitu wana sambo, ezali bangomba sambo epai mwasi afandi. Yango ezali mpe bakonzi minene sambo.
10Mitano basiʼbakweya na bokonzi, moko azali sikʼoyo na bokonzi, mpe mosusu ayei naino te. Tango akoya, esengeli awumela mwa tango moke. 11Bongo nyama oyo ezalaki liboso mpe sikʼoyo ezali lisusu te, yango nde mokonzi ya mwambe. Nyama yango ezali moko na kati ya bakonzi wana sambo, mpe ekokende na libebi.

12Maseke zomi oyo omonaki, ezali bakonzi zomi oyo bazwi naino bokonzi te. Kasi bokonzi na bango ekozala ya ngonga moko kaka, elongo na nyama wana. 13Bango nyonso zomi bazali na likanisi kaka moko, mpe bakopesa nguya mpe bokonzi na bango na nyama wana. 14Bakobunda na Mwana-meme, kasi Mwana-meme akolonga bango, pamba te ye azali Nkolo ya bakolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Akolonga bango elongo na bato oyo bazali na ye elongo, baoyo Nzambe abenga mpe apona, mpebazali ya kokangama na ye.

15Bongo anzelu alobaki na ngai :

—Bamayi oyo omonaki epai mwasi ya ndumba afandaki, ezali bato yamokili, bato ebele, bikolo, mpe minoko.

16Maseke zomi oyo omonaki mpe nyama wana, bakoyina mwasi ya ndumba. Bakobotola ye biloko na ye nyonso mpe bakotika ye bolumbu, bakolia mosuni na ye, mpe bakotumba ye na moto. 17Pamba te Nzambe atia na mitema na bango posa ya kokokisa makanisina ye ; bakoyokana mpo na kopesa nyama wana nguya na bango ya kokamba, kino tango Maloba ya Nzambe ekokokisama. 18Bongo mwasi oyo omonaki, ezali vile monene oyo ezali na bokonzi likolo ya bakonzi minene ya mokili.
Copyright information for LinMNB